Tángá to yóká ndambo oyo elandi.
Yesu asololi na mwasi ya engumba Samari
4:1Yesu ayokaki ete Bafarizeo bazwi sango oyo ezali koloba ete akomi na bayekoli ebele koleka Yoane mpe azali kobatisa bato mingi koleka Yoane. 2(Nzokande, Yesu Ye moko azalaki kobatisa te, kasi ezalaki nde bayekoli na Ye.) 3Boye, alongwaki na Yuda mpe azongaki na Galile. 4Lokola asengelaki kolekela na Samari, 5akomaki na engumba Sishari ya Samari, oyo ezalaki mosika te na elanga oyo Jakobi apesaki epai ya mwana na ye, Jozefi. 6Nzokande libulu ya mayi ya Jakobi ezalaki kati na elanga yango. Boye lokola Yesu alembaki nzoto mpo na mobembo, avandaki pembeni ya libulu yango. Ezalaki pene ya ngonga ya midi.7Tango mwasi moko ya engumba Samari akendeki kotoka mayi, Yesu alobaki na ye :
— Pesa Ngai mayi mpo ete namela.
8(Bayekoli ya Yesu bakendeki na engumba mpo na kosomba biloko ya kolia).
9Kasi mwasi yango alobaki :
— Ebandi ndenge nini yo oyo ozali Moyuda osenga ngai, mwasi ya engumba Samari, mayi mpo ete omela ? —Pamba te Bayuda bazalaki koyokana te na bato ya Samari.—
10Yesu azongiselaki ye :
— Soki oyebaki likabo ya Nzambe mpe nani oyo asengi yo mayi, ezali yo nde olingaki kosenga Ye mayi mpo ete omela, mpe Ye alingaki kopesa yo mayi ya bomoi.
11Mwasi alobaki na Yesu :
— Nkolo, ozali na eloko moko te mpo na kotoka mayi, mpe libulu ezali mozindo ; bongo mayi yango ya bomoi, olingaki kozwa yango wapi ? 12Koko na biso, Jakobi, apesa biso libulu oyo ; ye moko mpe amela mayi na yango, elongo na bana na ye mpe bibwele na ye. Boni, okanisi ete oleki ye ?
13Yesu azongiselaki ye :
— Moto nyonso oyo amelaka mayi oyo, ayokaka lisusu posa ya mayi ; 14kasi moto oyo akomela mayi oyo Ngai nakopesa ye akoyoka lisusu posa ya mayi te : mayi oyo Ngai nakopesa ye ekokoma kati na ye lokola etima ya mayi oyo ekawukaka te mpe etiolaka kino na bomoi ya seko.
15Mwasi yango alobaki na Yesu :
— Nkolo, pesa ngai mayi yango mpo ete nayokaka lisusu posa ya mayi te mpe nazonga lisusu awa te mpo na kotoka mayi.
16Yesu alobaki na ye :
— Kende, benga mobali na yo mpe zonga awa.
17Mwasi azongisaki :
— Nazali na mobali te.
Yesu alobaki na ye :
— Ozali koloba penza ya solo ete ozali na mobali te, 18pamba te ozalaki na mibali mitano ; mpe ye oyo ozali na ye sik’oyo azali mpe mobali na yo te. Boye likambo oyo owuti koloba ezali ya solo.
19Mwasi yango alobaki na Yesu :
— Nkolo, namoni ete ozali mosakoli. 20Bakoko na biso, bato ya Samari, bagumbamelaki Nzambe na likolo ya ngomba oyo ; kasi bino, Bayuda, bolobaka ete esika epai wapi tosengeli kogumbamela ezali kati na Yelusalemi.
21Yesu azongiselaki ye :
— Mwasi, ndima Ngai : tango ezali koya, tango oyo bakogumbamela lisusu Tata te na likolo ya ngomba oyo to kati na Yelusalemi. 22Bino, bato ya Samari, bogumbamelaka nzambe oyo boyebi te ; kasi biso, togumbamelaka Nzambe oyo toyebi, pamba te lobiko ewuti epai ya Bayuda. 23Kasi tango ezali koya mpe esili na yango kokoka, tango oyo bagumbameli ya solo bokogumbamela Tata, kati na Molimo mpe kati na solo ; pamba te Tata alukaka bato oyo bogumbamelaka Ye na lolenge wana. 24Nzambe azali Molimo ; esengeli ete bato oyo bagumbamelaka Ye bagumbamela Ye kati na Molimo mpe kati na solo.
25Mwasi alobaki na Yesu :
— Nayebi ete Masiya azali koya, Ye oyo babengaka Klisto ; mpe tango akoya, akoyebisa biso makambo nyonso.
26Yesu alobaki na ye :
— Nazali Masiya, Ngai oyo nazali koloba na yo.
4:39Bato mingi ya Samari, oyo bazalaki kovanda kati na engumba wana bandimelaki Yesu mpo na litatoli oyo mwasi azalaki kopesa : « Ayebisi ngai makambo nyonso oyo nasalaki. » 40Tango bato ya Samari bayaki epai ya Yesu, basengaki na Ye ete avanda elongo na bango ; mpe Yesu avandaki elongo na bango mikolo mibale. 41Bato ebele koleka bakomaki kondimela Ye mpo na maloba oyo Ye moko azalaki koloba. 42Bongo balobaki na mwasi wana :
— Tondimi kaka te mpo na makambo oyo olobaki, pamba te biso moko toyoki sik’oyo mpe toyebi ete azali penza Mobikisi ya mokili.
Zwa mwa tango mpo na koyebisa lisolo yango na maloba na yo moko. Olingi koloba yango na mongongo makasi, to kokoma yango. Soki ozali na mpasi ya kokanisa yango, tanga to yoká yango lisusu.
Soki oyoki ete oyebi lisapo yango malamu, zala na ntango ya kokanisa to kosolola mituna oyo elandi.
Get Discovery Bible Studies on your phone
Discover copyright ©2015-2025 discoverapp.org
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™. Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™. Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc. « Biblica » mpe elembo ya Biblica ezali bilembo ya mombongo oyo Biblica, Inc. akomisa na mikanda ya leta mpe na ndako ya mosala ya nkita ya ekolo Amerika. Esalelami na ndingisa ya Biblica.