Sosola

Etude 21

Kobosana: Yesu ateyaki ndenge ya kosambela

Luka 18:9-14, Yoane 16:24

Etape 1: Tángá lisoló

Tángá to yóká ndambo oyo elandi.

x1.0

Lisese ya Mofarizeo mpe mofutisi mpako

18:9Epai ya bato oyo bamimonaki bato ya sembo mpe batiolaki bato mosusu, Yesu alobaki lisusu lisese oyo :

  10 — Bato mibale bakendeki na Tempelo mpo na kosambela : moko azalaki Mofarizeo ; mpe mosusu, mofutisi mpako. 11Mofarizeo abendanaki ye moko na pembeni mpe asambelaki : « Oh Nzambe, nazali kotonda Yo, mpo ete nazali te lokola bato mosusu oyo bazali miyibi, bato mabe, bato na bikobo to mpe lokola mofutisi mpako oyo. 12Nakilaka bilei mbala mibale na poso mpe napesaka eteni ya zomi ya nyonso oyo nazwaka. »

  13 Kasi mofutisi mpako atelemaki mwa mosika ; amekaki ata te kotombola miso na ye na likolo, kasi atiaki loboko na ye na tolo mpe alobaki : « Oh Nzambe, yokela ngai mawa, pamba te nazali moto ya masumu ! »

  14 Nazali koloba na bino : mofutisi mpako azongaki na ndako na ye sima na Nzambe kokomisa ye moto ya sembo, kasi Mofarizeo te. Pamba te moto nyonso oyo amitombolaka, bakokitisa ye ; mpe oyo amikitisaka, bakotombola ye.

  16:24Kino sik’oyo, bosengi nanu eloko moko te na Kombo na Ngai. Bosenga, mpe bokozwa, mpo ete esengo na bino ezala ya kokoka.

Etape 2: Loba lisusu lisapo

Zwa mwa tango mpo na koyebisa lisolo yango na maloba na yo moko. Olingi koloba yango na mongongo makasi, to kokoma yango. Soki ozali na mpasi ya kokanisa yango, tanga to yoká yango lisusu.

Etape ya 3: Zwa Lisapo

Soki oyoki ete oyebi lisapo yango malamu, zala na ntango ya kokanisa to kosolola mituna oyo elandi.


Get it on Google Play
Download on the App Store

Get Discovery Bible Studies on your phone

Discover copyright ©2015-2025 discoverapp.org

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™. Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™. Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc. « Biblica » mpe elembo ya Biblica ezali bilembo ya mombongo oyo Biblica, Inc. akomisa na mikanda ya leta mpe na ndako ya mosala ya nkita ya ekolo Amerika. Esalelami na ndingisa ya Biblica.