Sosola

Étude 10

Kokóma baoyo babungá (eteni 2)

Matayo 9:35-10:16

Etape 1: Tángá lisoló

Tángá to yóká ndambo oyo elandi.

x1.0

Yesu ayokeli bato mawa

9:35Yesu azalaki kotambola na bamboka mpe na bingumba nyonso, azalaki koteya kati na bandako na bango ya mayangani mpe kosakola Sango Malamu ya Bokonzi ; azalaki kobikisa bato na bokono mpe na pasi ya ndenge na ndenge.


36Tango Yesu amonaki ngulupa ebele ya bato, ayokelaki bango mawa, pamba te mitema na bango ebukanaki, mpe balembaki makasi lokola bameme oyo ezangi mobateli. 37Yesu alobaki na bayekoli na Ye : « Elanga ezali monene, kasi basali bazali moke ! 38Yango wana, bosenga na Nkolo elanga ete atinda basali kati na elanga na Ye. »

Bantoma zomi na mibale

10:1Yesu abengaki bayekoli na Ye zomi na mibale mpe apesaki bango bokonzi ya kobengana milimo mabe mpe ya kobikisa bokono mpe pasi nyonso.


2Tala bakombo ya bantoma zomi na mibale :

  liboso, Simona oyo kombo na ye mosusu ezalaki Petelo ;
  Andre, ndeko ya Petelo ;
  Jake, mwana mobali ya Zebede ;
  Yoane, ndeko ya Jake ;
  3Filipo mpe Bartelemi ;
  Toma mpe Matayo, mofutisi mpako ;
  Jake, mwana mobali ya Alife, mpe Tade ;
  4Simona oyo azalaki moko kati na bato ya lisanga ya Bazelote, mpe Yuda Isikarioti oyo atekaki Yesu.

5Ezali bato oyo zomi na mibale nde Yesu atindaki, sima na Ye kopesa bango mitindo oyo :

  — Bokende te epai ya bato ya bikolo mosusu, mpe bokota te na bingumba ya bato ya Samari. 6Kasi bokende epai ya bameme oyo ebunga ya bato ya Isalaele. 7Bipai nyonso oyo bokoleka, bosakola ete Bokonzi ya Likolo ekomi pene. 8Bobikisa babeli, bosekwisa bakufi, bokomisa peto bato na maba mpe bobengana milimo mabe. Bopesa na ofele mpo ete bino mpe bozwaki na ofele.

  9 Kati na mabenga na bino, botia wolo te, palata te, mbongo mpe te. 10Mpo na mobembo na bino, bomema sakosi te, banzambala mibale te, basandale te, lingenda mpe te ; pamba te mosali asengeli kolia na mosala na ye. 11Na engumba to na mboka nyonso oyo bokokota, boluka moto oyo abongi mpo na koyamba bino mpe bovanda na ndako na ye kino tango bokolongwa. 12Mpe tango bokokota na ndako yango, bopesa bavandi na yango mbote na koloba : « Tika ete kimia ezala na bino ! » 13Soki bavandi ya ndako yango babongi na kimia yango, wana tika ete ewumela kati na bango ; soki te, wana tika ete ezonga epai na bino. 14Soki baboyi koyamba mpe koyoka bino, bolongwa na ndako to na engumba yango mpe bopupola putulu ya makolo na bino. 15Nazali koloba na bino penza ya solo : na mokolo ya kosambisama, etumbu ya bavandi ya engumba to ya mboka wana ekozala makasi koleka etumbu ya mokili ya Sodome mpe Gomore.

Minyoko kati na lotomo

  16 Nazali kotinda bino lokola bameme kati na bambwa ya zamba ; boye, bozala na ekenge lokola banyoka, mpe na boboto lokola bibenga.

Etape 2: Loba lisusu lisapo

Zwa mwa tango mpo na koyebisa lisolo yango na maloba na yo moko. Olingi koloba yango na mongongo makasi, to kokoma yango. Soki ozali na mpasi ya kokanisa yango, tanga to yoká yango lisusu.

Etape ya 3: Zwa Lisapo

Soki oyoki ete oyebi lisapo yango malamu, zala na ntango ya kokanisa to kosolola mituna oyo elandi.


Get it on Google Play
Download on the App Store

Get Discovery Bible Studies on your phone

Discover copyright ©2015-2026 discoverapp.org

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™. Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™. Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc. « Biblica » mpe elembo ya Biblica ezali bilembo ya mombongo oyo Biblica, Inc. akomisa na mikanda ya leta mpe na ndako ya mosala ya nkita ya ekolo Amerika. Esalelami na ndingisa ya Biblica.