Sosola

Étude 3

Elikya ebongolaka makambo.

Luka 19:1-10

Etape 1: Tángá lisoló

Tángá to yóká ndambo oyo elandi.

x1.0

Zashe azwi lobiko

19:1Yesu akotaki na engumba Jeriko, mpe azalaki kokatisa yango. 2Nzokande, ezalaki na moto moko kuna, kombo na ye « Zashe. » Azalaki mokonzi ya bafutisi mpako, mpe azalaki na bozwi ebele ; 3azalaki na posa ya komona soki Yesu azali nani, kasi lokola azalaki mokuse, akokaki te komona Ye mpo ete bato bazalaki ebele penza. 4Boye akimaki mbangu na liboso mpe amataki na nzete ya sikomori mpo na komona Yesu, pamba te Yesu akolekela na nzela wana.

5Tango Yesu akomaki na esika yango, atombolaki miso mpe alobaki na ye :

  — Zashe, kita noki ! Nasengeli kolala na ndako na yo lelo.

6Mbala moko, Zashe akitaki mpe ayambaki Yesu na esengo.

7Tango bato nyonso bamonaki bongo, bakomaki koyimayima ; bazalaki koloba :

  — Tala, akei kolala na ndako ya moto ya masumu !

8Kasi Zashe atelemaki mpe alobaki na Ye :

  — Nkolo, nazali kopesa, awa mpe sik’oyo, kati-kati ya biloko na ngai epai ya babola ; mpe, soki nabotolaki biloko ya moto, nazali kozongisela ye yango mbala minei.

9Yesu alobaki na ye :

  — Lelo, lobiko eyei na ndako oyo, mpo ete ye mpe azali mwana ya Abrayami. 10Pamba te Mwana na Moto ayaki mpo na koluka mpe kobikisa bato oyo babunga.

Etape 2: Loba lisusu lisapo

Zwa mwa tango mpo na koyebisa lisolo yango na maloba na yo moko. Olingi koloba yango na mongongo makasi, to kokoma yango. Soki ozali na mpasi ya kokanisa yango, tanga to yoká yango lisusu.

Etape ya 3: Zwa Lisapo

Soki oyoki ete oyebi lisapo yango malamu, zala na ntango ya kokanisa to kosolola mituna oyo elandi.


Get it on Google Play
Download on the App Store

Get Discovery Bible Studies on your phone

Discover copyright ©2015-2026 discoverapp.org

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™. Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™. Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc. « Biblica » mpe elembo ya Biblica ezali bilembo ya mombongo oyo Biblica, Inc. akomisa na mikanda ya leta mpe na ndako ya mosala ya nkita ya ekolo Amerika. Esalelami na ndingisa ya Biblica.