Yawe azali mobateli na ngai,
nakozanga ata eloko moko te.
2Apemisaka ngai na matiti ya mobesu,
mpe amemaka ngai pembeni ya mayi ya kimia.
3Ayeisaka sika makasi ya bomoi na ngai,
akambaka ngai na banzela ya bosembo
mpo na lokumu ya Kombo na Ye.
4Ata soki nasengeli kokatisa lubwaku
oyo etondi na molili ya kufa,
nakobanga mabe ata moko te,
pamba te ozali elongo na ngai,
nzete na Yo ya mobateli ekambaka ngai,
mpe lingenda na Yo ebatelaka ngai.
5Obongisaka mesa mpo na ngai
na miso ya bayini na ngai,
opakolaka moto na ngai mafuta
mpe otondisaka kopo na ngai kino kosopana.
6Solo, na mikolo nyonso ya bomoi na ngai,
esengo mpe bolingo na Yo ekobanda kolanda ngai ;
mpe nakovanda kati na Tempelo ya Yawe
kino suka ya bomoi na ngai.
Etape 2: Loba lisusu lisapo
Zwa mwa tango mpo na koyebisa lisolo yango na maloba na yo moko. Olingi koloba yango na mongongo makasi, to kokoma yango. Soki ozali na mpasi ya kokanisa yango, tanga to yoká yango lisusu.
Etape ya 3: Zwa Lisapo
Soki oyoki ete oyebi lisapo yango malamu, zala na ntango ya kokanisa to kosolola mituna oyo elandi.
Nini lisapo oyo elobi na yo mpo na Nzambe?
Nini lisapo oyo elobi yo na ntina na bato?
Soki oyo ezali mpenza liloba ya Nzambe, mbongwana nini osengeli kosala na bomoi na yo?