Kobosana: Lisakoli ya Yisaya ya mosali oyo azali komona pasi
Ezayi 53:1-12
Etape 1: Tángá lisoló
Tángá to yóká ndambo oyo elandi.
x1.0
53:1Nani andimaki makambo oyo tosakolaki ?
Mpe epai ya nani loboko na Yawe emonisamaki ?
2Pamba te akolaki liboso na Ye
lokola nzete ya moke,
lokola mosisa oyo ebimi na esobe ;
azalaki ata na kitoko to lokumu te
oyo ekokaki kobenda miso na biso ete etala ye ;
lolenge na ye ezalaki ata na eloko moko te
oyo ekokaki kosala ete tosepela na ye.
3Bato batiolaki mpe basundolaki ye,
ye moto na pasi, amesana konyokwama.
Lokola moto oyo babwakeli soyi na elongi,
atiolamaki, mpe tondimaki ye te.
4Solo, amemaki mokumba ya bokono na biso
mpe alataki pasi na biso kati na nzoto na ye ;
kasi biso, tokanisaki ete Nzambe nde abetaki ye,
apesaki ye etumbu mpe asambwisaki ye.
5Nzokande, bazokisaki ye bapota mpo na botomboki na biso,
banyokolaki ye mpo na masumu na biso ;
etumbu oyo ememelaki biso kimia
ekweyaki na nzoto na ye ;
mpe na nzela ya bapota na ye,
biso tobikisami na bokono na biso.
6Biso nyonso, tozalaki koyengayenga lokola bana meme,
moko na moko azalaki kolanda nzela na ye ;
bongo Yawe akweyisaki masumu na biso nyonso
na nzoto na ye.
7Banyokolaki ye mpe bamonisaki ye pasi,
kasi atikalaki kofungola monoko na ye te
lokola mpate oyo bazali komema
na esika oyo babomelaka banyama,
lokola meme liboso ya bato oyo bazali kolongola yango bapwale ;
akangaki monoko na ye.
8Babomaki ye na nzela ya minyoko mpe ya etumbu ;
kasi nani kati na bato ya tango na ye akokaki
komitungisa na tina na ye ?
Pamba te balongolaki ye na mokili ya bato ya bomoi,
babetaki ye likolo ya masumu ya bato na Ngai.
9Bapesaki ye kunda kati na bato mabe,
mpe kunda na ye ezalaki elongo na bazwi,
atako asalaki likambo moko te ya mabe,
mpe monoko na ye etikalaki koloba lokuta te.
10Nzokande, ezalaki mokano na Yawe
ete anyokwama na nzela ya pasi.
Atako Yawe akomisaki bomoi na ye
mbeka mpo na masumu,
akomona bakitani na ye
mpe mikolo na ye ekobakisama ;
bongo mokano na Yawe ekolongisama na loboko na ye.
11Sima na pasi ya molimo na ye,
akomona pole ya bomoi
mpe posa na ye ekokokisama.
Na nzela ya boyebi na ye,
Mosali na Ngai ya sembo akolongisa bato ebele
mpe akomema masumu na bango.
12Yango wana, nakopesa ye libula kati na bato minene,
mpe akokabola bomengo ya bitumba elongo na bato ya makasi,
pamba te akabaki bomoi na ye na kufa
mpe amitikaki ete batanga ye na molongo ya babomi bato,
pamba te amemaki masumu ya bato ebele
mpe amikomisaki molobeli ya babuki mibeko.
Etape 2: Loba lisusu lisapo
Zwa mwa tango mpo na koyebisa lisolo yango na maloba na yo moko. Olingi koloba yango na mongongo makasi, to kokoma yango. Soki ozali na mpasi ya kokanisa yango, tanga to yoká yango lisusu.
Etape ya 3: Zwa Lisapo
Soki oyoki ete oyebi lisapo yango malamu, zala na ntango ya kokanisa to kosolola mituna oyo elandi.
Nini lisapo oyo elobi na yo mpo na Nzambe?
Nini lisapo oyo elobi yo na ntina na bato?
Soki oyo ezali mpenza liloba ya Nzambe, mbongwana nini osengeli kosala na bomoi na yo?