Tángá to yóká ndambo oyo elandi.
Yesu aleisi mibali nkoto mitano
6:1Sima na yango, Yesu akendeki na ngambo mosusu ya ebale ya Galile oyo babengaka mpe ebale ya Tiberiade. 2Bato ebele bazalaki kolanda Ye mpo ete bazalaki komona bikamwa oyo azalaki kosala na banzoto ya babeli. 3Yango wana Yesu amataki na ngomba mpe avandaki kuna elongo na bayekoli na Ye. 4Nzokande Pasika, feti ya Bayuda, ekomaki pene.5Tango Yesu atombolaki miso, amonaki ebele ya bato penza koya epai na Ye ; alobaki na Filipo :
— Tokosomba mapa wapi mpo na koleisa bato oyo nyonso ?
6Yesu atunaki Filipo motuna oyo mpo na komeka ye mpe kotala soki akoloba nini, pamba te Ye, Yesu, ayebaki makambo oyo alingaki kosala.
7Filipo azongiselaki Yesu :
— Mapa oyo tokoki kosomba na mbongo ya bibende nkama mibale ekokoka te mpo ete moto moko na moko kati na bango azwa eteni ya lipa !
8Moko kati na bayekoli na Ye, oyo kombo na ye ezali Andre, ndeko mobali ya Simona Petelo, alobaki na Ye :
9— Ezali awa na elenge mobali moko oyo azali na mapa mitano basala na bambuma ya orje, mpe bambisi mibale ; kasi yango ekosala nini mpo na ebele ya bato oyo ?
10Yesu apesaki bango mitindo :
— Boloba na bato nyonso ete bavanda.
Boye, lokola ezalaki na matiti ebele na esika yango, bavandaki. Ezalaki wana na mibali pene nkoto mitano. 11Bongo Yesu azwaki mapa yango, azongisaki matondi epai ya Nzambe mpe akabolaki yango epai ya bato oyo bazalaki wana ; asalaki mpe bongo na bambisi : bato bazwaki kolanda ndenge posa na bango ezalaki.
12Sima na bato kolia mpe kotonda, Yesu alobaki na bayekoli na Ye :
— Bosangisa biteni oyo etikali mpo ete eteni moko te ebeba.
13Basangisaki biteni yango ; mpe na biteni ya mapa mitano basala na bambuma ya orje, oyo etikalaki na maboko ya bato oyo baliaki, batondisaki bitunga zomi na mibale.
14Tango bato bamonaki bikamwa oyo Yesu awutaki kosala, balobaki : « Azali penza Mosakoli oyo asengelaki koya na mokili. »
15Kasi, lokola Yesu ayebaki ete bazali na makanisi ya kokamata Ye mpo na kokomisa Ye mokonzi, abendanaki lisusu na ngomba mpo ete azala kaka Ye moko.
Yesu atamboli na mayi
16Tango pokwa ekomaki, bayekoli na Ye bakitaki na ebale 17epai wapi bamataki na bwato moko, bakatisaki ebale mpo na kokende na Kapernawumi, na ngambo mosusu ya ebale. Butu ekotaki, wana Yesu amikomelaki nanu te epai bango bakomaki. 18Ekumbaki moko ebandaki kopepa, mpe mayi ya ebale etombokaki. 19Awa basilaki koluka nkayi na molayi ya bakilometele pene mitano to motoba, bamonaki Yesu kotambola likolo ya mayi ya ebale mpe kopusana pene ya bwato ; somo makasi ekangaki bango. 20Kasi Yesu alobaki na bango : « Kimia ! Kimia ! Bobanga te ! Ezali Ngai ! »
21Balingaki kokotisa Yesu na bwato, kasi, mbala moko, bwato etutaki mabele ya esika oyo bazalaki kokende.
Yesu azali lipa oyo epesaka bomoi
22Mokolo oyo elandaki, bato oyo batikalaki na ngambo mosusu ya ebale bayaki kokanisa na sima ete ezalaki kaka na bwato moko, mpe ete Yesu akendeki bwato moko te na bayekoli na Ye ; bayekoli bakendeki bango moko kaka. 23Nzokande, babwato mosusu ewutaki na Tiberiade mpe ekomaki pene ya esika oyo baliaki mapa sima na Nkolo kozongisa matondi epai ya Nzambe. 24Tango bato bamonaki ete, ezala Yesu to bayekoli na Ye, moko te azalaki lisusu wana, bamataki na babwato yango mpe bakendeki koluka Yesu, na Kapernawumi.
25Tango bakutaki Ye na ngambo mosusu ya ebale, batunaki Ye :
— Rabi, okomaki awa tango nini ?
26Yesu azongiselaki bango :
— Nazali koloba na bino penza ya solo : soki bozali koluka Ngai, ezali kaka mpo ete boliaki mapa mpe botondaki, kasi ezali te mpo ete bomonaki bikamwa. 27Bosalaka te mpo na bilei oyo ebebaka, kasi bosalaka mpo na bilei oyo ewumelaka mpo na bomoi ya seko, bilei oyo Mwana na Moto akopesa bino ; pamba te ezali Ye nde Nzambe Tata abeta kashe.
28Batunaki Ye lisusu :
— Tosengeli kosala nini mpo na kokokisa misala oyo Nzambe azali kozela epai na biso ?
29Yesu azongiselaki bango :
— Mosala ya Nzambe, yango oyo : bondima Ye oyo Nzambe atindaki.
30Batunaki Ye lisusu :
— Elembo nini ya kokamwa okolakisa biso mpo ete tondima Yo ? Okosala penza nini ? 31Bakoko na biso baliaki mana kati na esobe kolanda ndenge ekomama : « Apesaki bango lipa kowuta na Likolo. »
32Kasi Yesu azongiselaki bango :
— Nazali koloba na bino penza ya solo : ezali Moyize te moto apesaki bino lipa oyo ezalaki kowuta na Likolo, kasi ezali Tata na Ngai nde apesaka bino lipa ya solo oyo ewutaka na Likolo. 33Pamba te lipa ya Nzambe ezali Ye oyo akiti wuta na Likolo mpe apesaka mokili bomoi.
34Bongo balobaki na Ye :
— Nkolo, pesaka biso lipa yango tango nyonso.
35Yesu azongiselaki bango :
— Ngai nazali lipa oyo epesaka bomoi. Moto nyonso oyo akoya epai na Ngai akoyoka lisusu nzala te, mpe moto nyonso oyo akondima Ngai akoyoka lisusu posa ya mayi te. 36Nzokande, ndenge nayebisaki bino, bozali komona Ngai, kasi bozali kondima te. 37Bato nyonso oyo Tata apesi Ngai bakoya epai na Ngai, mpe nakobengana soki moke te moto nyonso oyo akoya epai na Ngai.
Zwa mwa tango mpo na koyebisa lisolo yango na maloba na yo moko. Olingi koloba yango na mongongo makasi, to kokoma yango. Soki ozali na mpasi ya kokanisa yango, tanga to yoká yango lisusu.
Soki oyoki ete oyebi lisapo yango malamu, zala na ntango ya kokanisa to kosolola mituna oyo elandi.
Get Discovery Bible Studies on your phone
Discover copyright ©2015-2025 discoverapp.org
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™. Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™. Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc. « Biblica » mpe elembo ya Biblica ezali bilembo ya mombongo oyo Biblica, Inc. akomisa na mikanda ya leta mpe na ndako ya mosala ya nkita ya ekolo Amerika. Esalelami na ndingisa ya Biblica.