Sosola

Étude 16

Kobosana: Yesu abenganaki milimo mabe

Malako 5:1-20

Etape 1: Tángá lisoló

Tángá to yóká ndambo oyo elandi.

x1.0

Yesu aleki milimo mabe na makasi

5:1Tango bakomaki na ngambo mosusu ya ebale, kati na etuka ya Geraza, 2Yesu akitaki na bwato. Mbala moko, moto moko oyo azalaki na molimo mabe abimaki wuta na bakunda mpe ayaki kokutana na Ye. 3Moto yango azalaki kovanda kati na bakunda, mpe moto moko te azalaki na makasi ya kokanga ye, ezala na nzela ya minyololo ; 4pamba te mbala nyonso oyo bazalaki kokanga ye na nzela ya minyololo mpe kotia ye bibende na makolo, azalaki kokata yango mpe kobuka bibende yango ; moto moko te azalaki na makasi ya kolembisa Ye. 5Tango nyonso, butu mpe moyi, azalaki koyengayenga kati na bakunda mpe na bangomba, azalaki koganga na mongongo makasi mpe komizokisa na mabanga.

6Tango amonaki Yesu na mosika, akimaki mbangu, agumbamaki liboso na Ye 7mpe agangaki na makasi nyonso :

  — Yesu, Mwana na Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, ngai na Yo likambo nini ? Nabondeli Yo na Kombo ya Nzambe, kotungisa ngai te !

8Pamba te Yesu alobaki na molimo yango : « Yo molimo mabe, bima kati na moto oyo ! »

9Yesu atunaki ye :

  — Kombo na yo nani ?

Azongisaki :

  — Kombo na Ngai ezali ngulupa, pamba te tozali ebele !

10Molimo mabe esengaki na Yesu na molende penza ete abengana yango te na mokili wana. 11Nzokande, etonga moko monene ya bangulu ezalaki kolia pembeni ya ngomba.

12Milimo mabe esengaki na Yesu : « Tinda biso kati na bangulu, mpo ete tokota kati na yango. »

13Tango Yesu apesaki yango nzela, milimo mabe ebimaki kati na moto mpe ekendeki kokota kati na bangulu. Mbala moko, bangulu pene nkoto mibale ekitaki mbangu wuta na likolo ya ngomba, ezindaki kati na ebale mpe ekufaki.

14Bakengeli bangulu bakimaki mbangu mpe bakendeki kopesa sango kati na engumba mpe na bamboka mike ya zingazinga ; bongo bato bayaki mpo na kotala likambo oyo ewutaki kosalema. 15Tango bakomaki epai na Yesu, bamonaki moto oyo azalaki na se ya bokonzi ya ngulupa ya milimo mabe avandi wana, alata bilamba na mayele na ye ya kokoka. Boye somo ekangaki bango. 16Bato oyo bamonaki ndenge likambo yango esalemaki bayebisaki bato mosusu makambo oyo ekomelaki moto oyo azalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe mpe oyo ekomelaki bangulu. 17Boye bakomaki kobondela Yesu ete abima na etuka na bango.

18Tango Yesu amataki na bwato, moto oyo azalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe asengaki na Ye ete bakende na Ye nzela moko.

19Yesu apesaki ye nzela te, kasi alobaki na ye : « Kende na ndako na yo, epai ya bandeko na yo ; yebisa bango makambo oyo Nkolo asaleli yo, mpe ndenge nini ayokeli yo mawa. »

20Moto yango akendeki mpe abandaki kopanza sango ya makambo oyo Yesu asalaki mpo na ye, kati na Dekapoli ; mpe bato nyonso bakamwaki.

Etape 2: Loba lisusu lisapo

Zwa mwa tango mpo na koyebisa lisolo yango na maloba na yo moko. Olingi koloba yango na mongongo makasi, to kokoma yango. Soki ozali na mpasi ya kokanisa yango, tanga to yoká yango lisusu.

Etape ya 3: Zwa Lisapo

Soki oyoki ete oyebi lisapo yango malamu, zala na ntango ya kokanisa to kosolola mituna oyo elandi.


Get it on Google Play
Download on the App Store

Get Discovery Bible Studies on your phone

Discover copyright ©2015-2025 discoverapp.org

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™. Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™. Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc. « Biblica » mpe elembo ya Biblica ezali bilembo ya mombongo oyo Biblica, Inc. akomisa na mikanda ya leta mpe na ndako ya mosala ya nkita ya ekolo Amerika. Esalelami na ndingisa ya Biblica.