Tángá to yóká ndambo oyo elandi.
Kufa ya Lazare
11:1Kati na mboka Betani, ezalaki na mobali moko na kombo Lazare ; azalaki kobela mpe azalaki na bandeko basi mibale : Mari mpe Marte. 2Mari azali mwasi oyo asopelaki Nkolo malasi mpe asalelaki suki na ye mpo na kopangusa makolo ya Yesu, mpe Lazare oyo azali kobela azali ndeko na ye ya mobali.3Bandeko nyonso mibale ya basi batindaki maloba oyo epai ya Yesu :
— Nkolo, moto oyo olingaka azali kobela.
4Tango Yesu ayokaki yango, alobaki :
— Bokono oyo ekoboma ye te, kasi ekopesa Nzambe nkembo mpe ekozala nzela mpo ete Mwana na Nzambe azwa lokumu.
5Nzokande, Yesu azalaki kolinga makasi Marte, ndeko na ye ya mwasi mpe Lazare. 6Atako ayokaki ete Lazare azali kobela, kasi avandaki lisusu mikolo mibale na esika oyo azalaki. 7Bongo alobaki na bayekoli na Ye :
— Tosengeli sik’oyo kozonga na Yuda.
8Bayekoli balobaki na Ye :
— Moteyi, wuta mokolo oyo Bayuda balingaki koboma Yo na mabanga, eleki nanu mikolo mingi te ; bongo mpo na nini olingi lisusu kozonga kuna ?
9Yesu azongisaki :
— Boni, moyi ezalaka na bangonga zomi na mibale te ? Soki moto atamboli na moyi, akobeta mabaku te, pamba te azali komona pole ya mokili oyo. 10Nzokande, soki moto atamboli na butu, akobeta penza mabaku, pamba te pole ezali te.
11Sima na Ye koloba bongo, alobaki na bango lisusu :
— Molingami na biso, Lazare, alali pongi ; kasi nazali kokende kolamusa ye.
12Bayekoli balobaki na Yesu :
— Nkolo, soki azali kolala pongi, akobika na bokono na ye !
13Solo, Yesu alingaki koloba ete Lazare akufi, kasi bayekoli bakanisaki ete azali kolobela nde pongi oyo tolalaka. 14Bongo Yesu alobaki na bango na polele :
— Lazare akufi. 15Mpe nazali na esengo makasi mpo na bino lokola bozalaki kuna te, pamba te likambo oyo ekosala ete kondima na bino elendisama. Kasi sik’oyo tokende epai na ye.
16Na bongo, Toma, oyo bazalaki mpe kobenga « Lipasa, » alobaki na bayekoli mosusu :
— Biso mpe, tokende mpo ete tokufa elongo na Yesu !
17Tango Yesu akomaki, ayokaki ete basilaki kokunda Lazare kati na kunda wuta mikolo minei. 18Mpe lokola Betani ezalaki mosika ya Yelusalemi na bakilometele pene misato, 19Bayuda mingi bayaki epai ya Mari mpe Marte mpo na kokabola mawa elongo na bango, mpo na kufa ya ndeko na bango.
Lisekwa mpe bomoi
20Tango Marte ayokaki ete Yesu azali koya, akendeki kokutana na Ye ; kasi Mari atikalaki ya kovanda kati na ndako.
21Marte alobaki na Yesu :
— Nkolo, soki ozalaki awa, ndeko na ngai alingaki kokufa te ! 22Kasi nazali na kondima ete, ata sik’oyo, Nzambe akopesa Yo nyonso oyo okosenga Ye.
23Yesu alobaki na ye :
— Ndeko na yo akosekwa.
24Marte azongiselaki Yesu :
— Nayebi solo ete akosekwa, na mokolo ya suka, na tango bakufi bakosekwa.
25Yesu alobaki na ye :
— Ngai nazali lisekwa mpe bomoi. Moto nyonso oyo andimi Ngai akozala na bomoi, atako akufi. 26Mpe moto nyonso oyo andimi Ngai, wana azali na bomoi, akotikala kokufa te. Ondimi yango ?
27Marte azongisaki :
— Iyo, Nkolo ! Nandimi ete ozali Klisto, Mwana na Nzambe, oyo asengelaki koya na mokili.
28Sima na Marte koloba bongo, akendeki kobenga Mari, ndeko na ye ; mpe wana abendaki ye pembeni, alobaki na ye na mongongo ya se penza :
— Moteyi ayei, azali kobenga yo.
29Tango kaka Mari ayokaki bongo, atelemaki na lombangu mpe akendeki epai ya Yesu. 30Nzokande, Yesu akotaki nanu te na mboka ; azalaki kaka na esika oyo Marte akutanaki na Ye. 31Tango Bayuda oyo bazalaki elongo na Mari kati na ndako mpo na kokabola mawa elongo na ye, bamonaki Mari kotelema na lombangu mpe kobima libanda, balandaki ye, pamba te bakanisaki ete akei kolela na kunda.
32Tango kaka Mari akomaki na esika oyo Yesu azalaki mpe amonaki Ye, amibwakaki na makolo na Ye mpe alobaki :
— Nkolo, soki ozalaki awa, ndeko na ngai alingaki kokufa te !
33Tango Yesu amonaki Mari mpe Bayuda oyo bayaki elongo na ye kolela, ayokaki mawa makasi mpe amitungisaki. 34Atunaki bango :
— Bokundaki ye wapi ?
Bazongisaki :
— Nkolo, yaka kotala.
35Yesu alelaki.
36Bongo Bayuda balobaki :
— Tala ndenge nini alingaki ye !
37Kasi bamosusu kati na bango balobaki :
— Ezali ye te oyo abikisaki mokufi miso ? Bongo ndenge nini akokaki te kosala ete Lazare akufa te ?
Yesu asekwisi Lazare
38Lokola Yesu amitungisaki lisusu makasi, akendeki na kunda. Ezalaki kati na ebombamelo ya mabanga oyo, na ekotelo na yango, batiaki libanga moko ya monene.
39Yesu alobaki na bango :
— Botindika libanga.
Kasi Marte, ndeko ya mowei, alobaki na Yesu :
— Nkolo, azali kolumba solo ! Wuta bakundaki ye, esali mikolo minei.
40Yesu alobaki na ye :
— Nalobaki na yo te ete soki ondimi, okomona nkembo ya Nzambe ?
41Boye batindikaki libanga. Bongo Yesu atombolaki miso na likolo mpe alobaki : « Tata, nazali kotonda Yo mpo ete oyoki Ngai. 42Nayebaki ete oyokaka Ngai tango nyonso ; kasi soki nalobi bongo, ezali mpo ete bato oyo bazali zingazinga na Ngai bandima ete Yo nde otindaki Ngai. »
43Sima na Yesu koloba bongo, agangaki :
— Lazare, bima !
44Mpe mowei abimaki longwa na kunda ; makolo mpe maboko na ye ezalaki ya kokangama na basinga ya bitendi, mpe elongi na ye ezalaki ya kozipama na elamba.
Bongo Yesu alobaki na bato oyo bazalaki wana :
— Bofungola ye basinga wana mpe botika ye kokende.
Zwa mwa tango mpo na koyebisa lisolo yango na maloba na yo moko. Olingi koloba yango na mongongo makasi, to kokoma yango. Soki ozali na mpasi ya kokanisa yango, tanga to yoká yango lisusu.
Soki oyoki ete oyebi lisapo yango malamu, zala na ntango ya kokanisa to kosolola mituna oyo elandi.
Get Discovery Bible Studies on your phone
Discover copyright ©2015-2025 discoverapp.org
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™. Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™. Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc. « Biblica » mpe elembo ya Biblica ezali bilembo ya mombongo oyo Biblica, Inc. akomisa na mikanda ya leta mpe na ndako ya mosala ya nkita ya ekolo Amerika. Esalelami na ndingisa ya Biblica.