Sosola

Étude 24

Kobosana: Yesu ateyaki ndenge ya kozala monene.

Matayo 20:20-28

Etape 1: Tángá lisoló

Tángá to yóká ndambo oyo elandi.

x1.0

Yesu mpe mama ya bana ya Zebede

20:20Bongo mama ya bana mibali ya Zebede ayaki epai ya Yesu, elongo na bana na ye ya mibali, mpe agumbamaki liboso na Ye mpo na kosenga Ye eloko moko. 21Yesu atunaki ye :

  — Olingi nini ?

Azongisaki :

  — Laka ngai ete bana na ngai mibale oyo ya mibali bakovanda kati na Bokonzi na Yo : moko na ngambo ya loboko na Yo ya mobali, mpe mosusu, na ngambo ya loboko na Yo ya mwasi.

22Yesu azongiselaki bango :

  — Bozali kososola te makambo oyo bozali kosenga ! Boni, bokoki komela kopo oyo Ngai nakomela ?

Bazongisaki :

  — Iyo, tokoki.

23Yesu alobaki na bango :

  — Solo, bokomela na bino kopo oyo Ngai nakomela ; kasi likambo ya kovanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali to na ngambo ya loboko na Ngai ya mwasi, Ngai nakoki te kopesela yango ndingisa ; bisika wana ezali ya bato oyo Tata na Ngai abongisela bango yango.

24Tango bayekoli mosusu zomi bayokaki makambo wana, basilikelaki bandeko mibale wana. 25Kasi Yesu abengaki bango nyonso mpe alobaki na bango :

  — Boyebi malamu ete bakonzi ya bikolo bakonzaka bato ya bikolo oyo ezali na se ya bokonzi na bango, mpe bakalaka ya lokumu bakonzaka bato oyo bazali na se ya bokonzi na bango. 26Esengeli te kozala bongo kati na bino. Nzokande, tika ete moto nyonso oyo alingi kozala moto monene kati na bino azala mosali na bino ; 27mpe tika ete moto nyonso oyo alingi kozala moto ya liboso kati na bino azala mowumbu na bino ! 28Pamba te Mwana na Moto ayaki te mpo ete basalela Ye ; kasi ayaki nde kosala mpo na bato, mpe kopesa bomoi na Ye lokola motuya ya kofuta mpo na kosikola bato ebele.

Etape 2: Loba lisusu lisapo

Zwa mwa tango mpo na koyebisa lisolo yango na maloba na yo moko. Olingi koloba yango na mongongo makasi, to kokoma yango. Soki ozali na mpasi ya kokanisa yango, tanga to yoká yango lisusu.

Etape ya 3: Zwa Lisapo

Soki oyoki ete oyebi lisapo yango malamu, zala na ntango ya kokanisa to kosolola mituna oyo elandi.


Get it on Google Play
Download on the App Store

Get Discovery Bible Studies on your phone

Discover copyright ©2015-2025 discoverapp.org

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™. Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™. Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc. « Biblica » mpe elembo ya Biblica ezali bilembo ya mombongo oyo Biblica, Inc. akomisa na mikanda ya leta mpe na ndako ya mosala ya nkita ya ekolo Amerika. Esalelami na ndingisa ya Biblica.