Tángá to yóká ndambo oyo elandi.
Bakangi Yesu
18:1Sima na Yesu kobondela, akendeki elongo na bayekoli na Ye mpe bakatisaki lubwaku ya Sedron epai wapi elanga moko ezalaki. Yesu akotaki na elanga yango elongo na bayekoli na Ye.2Yuda oyo asilaki komibongisa mpo na kokaba Yesu ayebaki esika yango malamu, pamba te Yesu azalaki kokende kuna mbala mingi elongo na bayekoli na Ye. 3Boye Yuda akendeki na elanga yango mpe amemaki lisanga ya basoda mpe ya bakengeli oyo bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo bapesaki ye. Bato yango basimbaki minda, banzete oyo ezalaki kopela moto mpe bibundeli.
4Lokola Yesu ayebaki makambo nyonso oyo esengeli kokomela Ye, akendeki kokutana na bango mpe atunaki bango :
— Bozali koluka nani ?
5Bazongisaki :
— Yesu ya Nazareti.
Yesu alobaki na bango :
— Ezali Ngai oyo.
Mpe Yuda oyo atekaki Yesu epai na bango azalaki wana elongo na bango. 6Tango Yesu alobaki na bango : « Ezali Ngai oyo, » bazongaki na sima mpe bakweyaki na mabele. 7Yesu atunaki bango lisusu :
— Bozali koluka nani ?
Bazongisaki :
— Yesu ya Nazareti.
8Yesu alobaki na bango :
— Nasili koloba na bino ete ezali Ngai. Soki ezali Ngai nde bozali koluka, botika bato mosusu kokende.
9Ezali bongo nde esengelaki kokokisama, liloba oyo Yesu alobaki : « Kati na bato oyo opesaki ngai, nabungisi ata moko te. »
10Lokola Simona Petelo azalaki na mopanga, abimisaki yango wuta na ebombelo na yango, abetaki mosali ya mokonzi ya Banganga-Nzambe mpe akataki ye litoyi ya ngambo ya loboko ya mobali. Kombo ya mosali yango ezalaki Malikisi.
11Kasi Yesu alobaki na Petelo :
— Zongisa mopanga na yo kati na ebombelo na yango. Boni, nasengeli te komela kopo ya pasi, oyo Tata apesi Ngai ?
Yesu liboso ya Ana
12Lisanga ya basoda, mokonzi na bango mpe bakengeli ya Bayuda bakamataki Yesu mpe bakangaki Ye basinga ; 13bamemaki Ye liboso epai ya Ana oyo azalaki tata-bokilo ya Kayifa, mokonzi ya Banganga-Nzambe, na mobu wana. 14Ezalaki mpe Kayifa wana nde apesaki Bayuda toli oyo : « Eleki malamu ete moto moko akufa mpo na bato nyonso. »
Petelo awangani Yesu mpo na mbala ya liboso
15Simona Petelo mpe moyekoli mosusu bazalaki kolanda Yesu. Moyekoli yango ayebanaki na mokonzi ya Banganga-Nzambe, mpe akotaki elongo na Yesu na lopango ya kati ya ndako ya mokonzi ya Banganga-Nzambe. 16Petelo azalaki kozela libanda, na liboso ya ekuke. Moyekoli wana, oyo ayebanaki na mokonzi ya Banganga-Nzambe, abimaki, asololaki na mwasi mokengeli ekuke mpe akotisaki Petelo. 17Mwasi mosali oyo azalaki kokengela ekuke atunaki Petelo :
— Boni, yo mpe ozali te moko kati na bayekoli ya moto wana ?
Petelo azongisaki :
— Nazali moyekoli na ye te.
18Lokola malili ezalaki, basali mpe bakengeli bapelisaki moto mpe batelemaki pembeni-pembeni mpo na koyetola. Petelo mpe azalaki wana elongo na bango mpo na koyetola.
Mokonzi ya Banganga-Nzambe asambisi Yesu
19Mokonzi ya Banganga-Nzambe apesaki Yesu mituna na tina na bayekoli na Ye mpe na tina na mateya na Ye. 20Yesu azongiselaki ye :
— Nazalaki koloba na polele penza na miso ya bato nyonso, nazalaki koteya tango nyonso kati na bandako ya mayangani mpe kati na Tempelo, epai wapi Bayuda nyonso basanganaka ; nalobaki eloko moko te na nkuku. 21Mpo na nini ozali kotuna Ngai mituna ? Tuna epai ya bato oyo bayokaki Ngai koloba. Ezali bango nde bakoki koyeba malamu makambo oyo nazalaki koloba.
22Tango kaka Yesu alobaki bongo, moko kati na bakengeli oyo bazalaki wana abetaki Ye mbata na koloba :
— Boni ! Ezali bongo nde ozali kozongisela mokonzi ya Banganga-Nzambe ?
23Yesu alobaki na ye :
— Soki nalobi mabe, mabe yango ezali wapi ? Kasi soki nalobi na Ngai kaka solo, mpo na nini kobeta Ngai ?
24Bongo Ana atindaki Yesu oyo azalaki kaka ya kokangama na basinga, epai ya Kayifa, mokonzi ya Banganga-Nzambe.
Petelo awangani Yesu mpo na mbala ya mibale
25Wana Simona Petelo azalaki nanu koyetola moto, batunaki ye :
— Yo mpe ozali te moko kati na bayekoli na ye ?
Petelo awanganaki yango na koloba :
— Te, nazali moyekoli na ye te.
26Kasi moko kati na basali ya mokonzi ya Banganga-Nzambe, ndeko mobali ya moto oyo Petelo akataki litoyi, alobaki :
— Boni, ngai namonaki yo te elongo na ye kati na elanga ?
27Kasi Petelo awanganaki yango lisusu ; mpe mbala moko, soso elelaki.
Pilato asambisi Yesu
28Bongo na tongo makasi, longwa na ndako ya Kayifa, bamemaki Yesu kati na ndako ya moyangeli oyo azalaki moto ya Rome. Kasi bango moko bato oyo bamemaki Yesu bakotaki te kati na ndako ya moyangeli, mpo ete bamikomisa mbindo te mpe mpo ete bazwa nzela ya kolia bilei ya Pasika. 29Yango wana moyangeli Pilato abimaki na libanda mpe atunaki bango :
— Bofundi moto oyo mpo na likambo nini ?
30Bazongiselaki ye :
— Soki moto oyo asalaki mabe te, tolingaki mpe koya te kotika ye na maboko na yo.
31Pilato alobaki na bango :
— Bokamata ye mpe bosambisa ye bino moko kolanda mibeko na bino.
Bayuda bazongiselaki ye :
— Biso tozali na ndingisa te ya kokatela moto etumbu ya kufa.
32Ezali ndenge wana nde ekokisamaki maloba oyo Yesu alobaki mpo na kolakisa lolenge ya kufa oyo asengelaki kokufa.
33Pilato azongaki kati na ndako ya moyangeli, abengaki Yesu mpe atunaki Ye :
— Boni, ozali mokonzi ya Bayuda ?
34Yesu azongisaki :
— Boni, ezali na ndenge na yo moko nde olobi yango to bato mosusu nde bayebisi yo na tina na Ngai ?
35Pilato atunaki Yesu :
— Boni, okanisi ete ngai nazali Moyuda ? Ezali bato ya ekolo na yo moko mpe bakonzi ya Banganga-Nzambe nde bayei kotika yo na maboko na ngai. Osali nini ?
36Yesu azongisaki :
— Bokonzi na Ngai ezali ya mokili oyo te ; soki ezalaki ya mokili oyo, basali na Ngai balingaki kobunda mpo ete nakweya te na maboko ya Bayuda. Solo, bokonzi na Ngai ezali ya mokili oyo te.
37Pilato atunaki :
— Elingi koloba nini, ozali nde mokonzi ?
Yesu azongisaki :
— Yo nde olobi yango ete nazali mokonzi. Nabotamaki mpe nayaki kati na mokili mpo na kopesa litatoli na tina na solo. Moto oyo azali kati na solo ayokaka mongongo na Ngai.
38Pilato atunaki Ye :
— Solo ezali nini ?
Sima na koloba maloba wana, Pilato abimaki lisusu na libanda epai wapi Bayuda bazalaki mpe alobaki na bango :
— Nazwi ye na likambo moko te ya mabe mpo ete nakatela ye etumbu ya kufa. 39Kasi lokola ezali momesano epai na bino ete nabimisa na boloko mokangami moko, na tango ya feti ya Pasika, bozwa sik’oyo mokano. Bolingi ete natika mokonzi ya Bayuda mpo ete akoma nsomi ?
40Bango nyonso bazongisaki na koganga :
— Te ! Ye te ! Bimisa nde Barabasi !
Nzokande, Barabasi azalaki moyibi mpe mobomi bato.
Bakateli Yesu etumbu ya kufa
19:1Bongo Pilato apesaki mitindo ete bakamata Yesu, mpe abetisaki Ye fimbu. 2Basoda basalaki ekoti na banzube mpe balatisaki Ye yango na moto ; balatisaki Ye lisusu nzambala ya motane. 3Bazalaki koya koloba na Ye : « Mbote, mokonzi ya Bayuda ! » Mpe babandaki kobeta Ye bambata.4Pilato abimaki lisusu mpe alobaki na bango :
— Botala ! Nayei na Ye na libanda epai na bino mpo boyeba ete ngai nazwi Ye na mabe moko te.
5Boye, Yesu abimaki alata ekoti ya nzube mpe nzambala ya motane. Pilato alobaki na bango :
— Moto yango, ye oyo !
6Tango kaka bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakengeli bamonaki Yesu, babandaki koganga :
— Baka ye na ekulusu ! Baka ye na ekulusu !
Kasi Pilato azongisaki :
— Bino moko, bokamata ye mpe bobaka ye na ekulusu ; ngai nazwi ye na mabe ata moko te.
7Bayuda balobaki na molende nyonso :
— Tozali na Mobeko ; mpe kolanda Mobeko na biso, asengeli kokufa, pamba te amikomisi Mwana na Nzambe.
8Tango Pilato ayokaki maloba wana, abangaki lisusu makasi. 9Azongaki lisusu kati na ndako ya moyangeli mpe alobaki na Yesu :
— Ozali moto ya mboka nini ?
Kasi Yesu apesaki ye eyano te.
10Pilato alobaki na Ye :
— Boni, oboyi kozongisela ngai eyano ? Oyebi te ete ngai nazali na makoki ya kobaka yo na ekulusu mpe ya kotika yo ?
11Yesu alobaki na ye :
— Okokaki kozala na bokonzi moko te likolo na Ngai soki epesamelaki yo te wuta na likolo. Yango wana, moto oyo akabi Ngai na maboko na yo asali lisumu monene koleka.
12Kobanda kaka na ngonga wana, Pilato akomaki koluka nzela ya kotika Yesu ; kasi Bayuda babandaki lisusu koganga :
— Soki otiki ye, wana ozali na yo moninga ya Sezare te ! Pamba te moto nyonso oyo amikomisi mokonzi azali monguna ya Sezare.
13Tango Pilato ayokaki bongo, amemaki Yesu na libanda mpe avandaki na esambiselo, na esika oyo babengaka, na lokota ya Arami, « Gabata. » 14Ezalaki mokolo ya suka mpo na kokoma na mokolo ya Pasika, na ngonga ya midi. Pilato alobaki na Bayuda :
— Botala mokonzi na bino !
15Kasi babandaki koganga :
— Boma ye ! Boma ye ! Baka ye na ekulusu !
Pilato alobaki na bango lisusu :
— Nasengeli penza kobaka mokonzi na bino na ekulusu ?
Bakonzi ya Banganga-Nzambe bazongisaki :
— Tozali kaka na Sezare lokola mokonzi, mokonzi mosusu azali te !
16Pilato akabaki Yesu na maboko na bango mpo ete babaka Ye na ekulusu. Boye, bakamataki Yesu mpe bakendeki na Ye.
Zwa mwa tango mpo na koyebisa lisolo yango na maloba na yo moko. Olingi koloba yango na mongongo makasi, to kokoma yango. Soki ozali na mpasi ya kokanisa yango, tanga to yoká yango lisusu.
Soki oyoki ete oyebi lisapo yango malamu, zala na ntango ya kokanisa to kosolola mituna oyo elandi.
Get Discovery Bible Studies on your phone
Discover copyright ©2015-2025 discoverapp.org
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™. Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™. Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc. « Biblica » mpe elembo ya Biblica ezali bilembo ya mombongo oyo Biblica, Inc. akomisa na mikanda ya leta mpe na ndako ya mosala ya nkita ya ekolo Amerika. Esalelami na ndingisa ya Biblica.