Tángá to yóká ndambo oyo elandi.
23:32Bamemaki mpe mibali mosusu mibale, babomi bato, mpo na koboma bango elongo na Yesu.
33Tango bakomaki na esika oyo babengaka « Gologota, » babakaki kuna Yesu elongo na babomi mibale wana ya bato : moko, na ngambo ya loboko ya mobali ya Yesu ; mosusu, na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi.
34Yesu alobaki :
— Tata, limbisa bango mpo ete bayebi te makambo oyo bazali kosala .
Mpe bakabolaki bilamba na Ye, na kobeta zeke. 35Bato batelemaki wana, bazalaki kotala ; mpe bakambi batiolaki Ye, balobaki :
— Abikisaki bato mosusu ; tika ete amibikisa ye moko, soki penza azali Klisto, Moponami ya Nzambe !
36Basoda mpe bakendeki mpe batiolaki Ye ; bapesaki Ye vino ya ngayi 37mpe balobaki :
— Soki ozali penza mokonzi ya Bayuda, mibikisa yo moko !
38Na likolo ya moto ya Yesu, ezalaki na makomi oyo :
Moto oyo azali Mokonzi ya Bayuda.
39Moko kati na babomi bato oyo babakamaki na ba-ekulusu atiolaki Ye :
— Boni, ozali Klisto te ? Mibikisa yo moko mpe bikisa biso !
40Kasi mobomi bato mosusu apamelaki ye :
— Ozali kobanga Nzambe te mpo ete ozali na se ya etumbu ya ndenge moko na oyo ya Ye ! 41Biso, tozwi penza etumbu na ndenge ya bosembo, pamba te tozali kozwa mbano ya misala mabe na biso ; kasi tata oyo asali ata mabe moko te.
42Bongo alobaki lisusu :
— Yesu, kanisa ngai tango okokota kati na Bokonzi na Yo.
43Yesu azongiselaki ye :
— Nazali koloba na yo penza ya solo : lelo, okozala elongo na Ngai kati na Paradizo.
44Na ngonga pene ya midi, molili ekotaki na mokili mobimba kino na ngonga ya misato ya pokwa, 45pamba te moyi etikaki kongenga, mpe rido monene ya Tempelo epasukaki na kati-kati. 46Yesu agangaki na mongongo makasi :
— Tata, nazongisi molimo na Ngai kati na maboko na Yo.
Sima na Ye koloba bongo, akataki motema.
47Tango mokonzi ya basoda ya Rome amonaki makambo oyo eleki, akumisaki Nzambe mpe alobaki :
— Moto oyo azalaki penza sembo !
48Tango bato nyonso oyo basanganaki wana, mpo na kotala makambo oyo ezali kosalema, bamonaki makambo oyo ekweyi, batiaki maboko na bango na batolo na bango mpe bazongaki. 49Kasi bato nyonso oyo bayebaki Yesu, mpe basi oyo balandaki Ye longwa na Galile, batelemaki na mosika mpe bazalaki kotala ndenge makambo ezali koleka.
Bakundi Yesu
50Kati na Likita-Monene ya Bayuda, ezalaki na moto moko, kombo na ye « Jozefi. » Azalaki moto malamu mpe moto ya sembo, 51mpe andimaki te mikano mpe misala ya bato mosusu ya Likita-Monene ; azalaki moto ya mboka Arimate, engumba ya Bayuda, mpe azalaki kozela Bokonzi ya Nzambe. 52Akendeki epai ya Pilato mpo na kosenga nzoto ya Yesu. 53Bongo akitisaki nzoto yango longwa na ekulusu, alingaki yango na liputa ya lino, mpe atiaki yango kati na kunda oyo batobolaki kati na libanga moko ya monene epai wapi batikalaki nanu kokunda ata moto moko te. 54Ezalaki mokolo ya komilengela, wana Saba elingaki kobanda. 55Basi oyo bawutaki na Galile elongo na Yesu balandaki Jozefi, bamonaki kunda mpe ndenge nini atiaki nzoto ya Yesu kati na kunda yango. 56Sima, bazongaki epai na bango mpe babongisaki mafuta ya solo kitoko mpe malasi. Kasi bapemaki na mokolo ya Saba, kolanda ndenge mobeko ezalaki kosenga.
Zwa mwa tango mpo na koyebisa lisolo yango na maloba na yo moko. Olingi koloba yango na mongongo makasi, to kokoma yango. Soki ozali na mpasi ya kokanisa yango, tanga to yoká yango lisusu.
Soki oyoki ete oyebi lisapo yango malamu, zala na ntango ya kokanisa to kosolola mituna oyo elandi.
Get Discovery Bible Studies on your phone
Discover copyright ©2015-2025 discoverapp.org
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™. Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™. Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc. « Biblica » mpe elembo ya Biblica ezali bilembo ya mombongo oyo Biblica, Inc. akomisa na mikanda ya leta mpe na ndako ya mosala ya nkita ya ekolo Amerika. Esalelami na ndingisa ya Biblica.