Tángá to yóká ndambo oyo elandi.
Yesu abimeli bayekoli zomi na moko
24:36Wana bazalaki nanu kosolola na tina na makambo yango, Yesu ayaki kotelema na kati-kati na bango mpe alobaki :— Tika ete kimia ezala na bino !
37Babangaki mpe somo ekangaki bango, pamba te bakanisaki ete bamoni elima.
38Yesu atunaki bango :
— Mpo na nini bozali kobanga ? Mpe mpo na nini bozali na tembe kati na mitema na bino ? 39Botala maboko mpe makolo na Ngai ; ezali penza Ngai. Bosimba Ngai mpe botala ! Elima ezalaka na mosuni te, ezalaka mpe na mikuwa te ; nzokande, bozali komona malamu ete, Ngai, nazali na yango.
40Wana azalaki koloba bongo, alakisaki bango maboko mpe makolo na Ye. 41Lokola bakokaki nanu kondima te mpo ete batondisamaki na esengo mpe bazalaki kokamwa mingi, Yesu atunaki bango :
— Bozali awa na eloko ya kolia ?
42Bapesaki Ye eteni ya mbisi bakalinga. 43Azwaki yango mpe aliaki yango na miso na bango.
44Bongo alobaki na bango :
— Yango nde makambo oyo nayebisaki bino tango nazalaki nanu elongo na bino : « Makambo nyonso oyo ekomama na tina na Ngai kati na Mobeko ya Moyize, kati na mikanda ya basakoli mpe kati na banzembo, esengeli kokokisama. »
45Bongo afungolaki bango mayele mpo ete bakoka kososola Makomi.
46Alobaki na bango :
— Tala makambo oyo ekomama : « Klisto akomona pasi, mpe akosekwa kati na bakufi na mokolo ya misato ; 47mpe, na Kombo na Ye, bakoteya bato ya bikolo nyonso, kobanda na Yelusalemi, ete babongola mitema mpo ete bazwa bolimbisi ya masumu. » 48Bino nde bozali batatoli ya makambo yango. 49Ngai nakotindela bino Molimo oyo Tata na Ngai alakaki ; boye bino, botikala awa, kati na engumba oyo, kino bokotondisama na nguya ya Likolo.
50Yesu amemaki bango na libanda ya engumba, pene ya Betani ; mpe kuna, atombolaki maboko mpe apambolaki bango.
51Wana azalaki kopambola bango, akabwanaki na bango mpe amemamaki kati na Likolo.
52Bongo bagumbamelaki Ye mpe bazongaki na Yelusalemi na esengo makasi. 53Mpe kuna na Yelusalemi, bazalaki kovanda tango nyonso kati na lopango ya Tempelo mpo na kokumisa Nzambe.
Zwa mwa tango mpo na koyebisa lisolo yango na maloba na yo moko. Olingi koloba yango na mongongo makasi, to kokoma yango. Soki ozali na mpasi ya kokanisa yango, tanga to yoká yango lisusu.
Soki oyoki ete oyebi lisapo yango malamu, zala na ntango ya kokanisa to kosolola mituna oyo elandi.
Get Discovery Bible Studies on your phone
Discover copyright ©2015-2025 discoverapp.org
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™. Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™. Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc. « Biblica » mpe elembo ya Biblica ezali bilembo ya mombongo oyo Biblica, Inc. akomisa na mikanda ya leta mpe na ndako ya mosala ya nkita ya ekolo Amerika. Esalelami na ndingisa ya Biblica.