Tángá to yóká ndambo oyo elandi.
Yesu asekwi
24:1Na tongo-tongo ya mokolo ya liboso ya poso, basi bakendeki na kunda mpe bamemaki mafuta ya solo kitoko oyo balambaki. 2Libanga oyo ekangaki ekotelo ya kunda, bakutaki yango etindikama mosika na ekotelo ya kunda. 3Bakotaki, kasi bamonaki te nzoto ya Nkolo Yesu. 4Wana bazalaki nanu komitungisa mpo na likambo yango, bato mibale babimelaki bango, balata bilamba oyo ezali kongenga makasi. 5Basi yango babangaki, bakitisaki bilongi na bango na ngambo ya mabele ; kasi bato wana mibale balobaki na bango :— Mpo na nini bozali koluka kati na bakufi Ye oyo azali na bomoi ? 6Azali lisusu awa te, asekwi. Bokanisa makambo oyo ayebisaki bino, wana azalaki nanu kati na Galile : 7« Esengeli ete bakaba Mwana na Moto na maboko ya bato ya masumu ; esengeli ete babaka Ye na ekulusu ; mpe esengeli ete asekwa sima na mikolo misato. »
8Boye, bakanisaki maloba ya Yesu.
9Tango bazongaki longwa na kunda, bayebisaki makambo wana nyonso epai ya bayekoli zomi na moko mpe epai ya baninga na bango nyonso. 10Ezalaki : Mari, moto ya mboka Magidala ; Jane mpe Mari, mama ya Jake. Baninga na bango mosusu ya basi bayebisaki mpe makambo yango epai ya bantoma, 11kasi bazwaki maloba ya basi yango lokola maloba ezanga tina, mpe bandimaki bango te.
12Kasi Petelo atelemaki mpe apotaki mbangu kino na kunda. Agunzamaki mpo na kotala, amonaki kaka biteni ya elamba ya lino elala yango moko. Alongwaki kuna mpe azongaki, akamwaki makasi makambo oyo ewutaki kosalema.
Yesu abimeli bayekoli na nzela ya Emausi
13Nzokande, kaka na mokolo yango, mibale kati na bango bazalaki kokende na mboka moko oyo kombo na yango ezalaki « Emausi. » Mboka yango ezalaki mosika na Yelusalemi, na bakilometele pene zomi na mibale. 14Bazalaki kosolola na tina na makambo nyonso oyo ewuti kosalema. 15Wana bazalaki kosolola mpe kotiana tembe mpo na makambo yango, Yesu asanganaki na bango mpe akomaki kokende na bango nzela moko. 16Kasi lokola miso na bango ezalaki ya kozipama, bakokaki te kososola ete ezali Yesu.
17Alobaki na bango :
— Makambo nini bozali kotiana na yango tembe na kotambola ?
Batelemaki, bilongi mawa-mawa. 18Moko kati na bango, kombo na ye « Kleopasi, » alobaki na Ye :
— Kati na bavandi nyonso ya Yelusalemi, yo moko kaka oyebi te makambo oyo ewuti kosalema mikolo oyo !
19Yesu atunaki bango :
— Makambo nini ?
Bazongisaki :
— Ezali makambo oyo etali Yesu ya Nazareti : azalaki mosakoli moko ya nguya, na misala mpe na maloba, liboso ya Nzambe mpe liboso ya bato nyonso. 20Kasi bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi na biso bakabaki Ye mpo ete bakatela Ye etumbu ya kufa, mpe babakaki Ye na ekulusu. 21Tozalaki kolikya ete Ye nde akokangola Isalaele. Kasi longola nyonso wana, lelo ezali mokolo ya misato wuta makambo wana esalemaki.
22Lisusu, ndambo ya basi kati na biso bakamwisi biso makasi ; bakendeki na kunda na tongo-tongo, 23kasi bamonaki nzoto na Ye te, mpe bayaki koyebisa biso ete bamonaki ba-anjelu kobimela bango mpe koyebisa bango ete Yesu azali na bomoi. 24Ndambo kati na baninga na biso bakendeki na kunda, mpe makambo oyo bamonaki kuna ekokani penza na oyo basi balobaki, kasi bamonaki Yesu te.
25Yesu alobaki na bango :
— Ah ! Bozali penza bazoba ! Tala ndenge mitema na bino ezali penza mabanga ! Bozali penza kondima te makambo nyonso oyo basakoli baloba ! 26Boni, Klisto asengelaki te komona pasi ndenge wana mpo ete akota kati na nkembo na Ye ?
27Bongo Yesu alimbolelaki bango makambo nyonso oyo ekomama kati na Makomi, kobanda na Moyize kino na basakoli nyonso.
28Tango bakomaki pene ya mboka epai wapi bazalaki kokende, Yesu asalaki lokola nde azali kokende mosika. 29Kasi bango babondelaki Ye makasi :
— Vanda elongo na biso, pamba te pokwa esili kokoma, mpe butu elingi kokota.
Boye Yesu akotaki na ndako mpo na kovanda elongo na bango. 30Tango avandaki na mesa elongo na bango, akamataki lipa, azongisaki matondi epai ya Nzambe, akataki yango na biteni, mpe apesaki bango yango. 31Mbala moko, miso na bango efungwamaki mpe basosolaki ete ezali Yesu, kasi alimwaki na miso na bango. 32Batunanaki :
— Boni, mitema na biso etondaki na esengo te wana azalaki kosolola na biso na nzela mpe kolimbolela biso Makomi ?
33Kaka na tango yango, batelemaki mpe bazongaki na Yelusalemi epai wapi bakutaki bayekoli zomi na moko basangana elongo na baninga na bango, 34oyo balobaki na bango :
— Ezali ya solo, Nkolo asekwi ; abimelaki Simona !
35Bango mibale mpe bayebisaki makambo oyo ekomelaki bango na nzela mpe ndenge nini basosolaki Yesu tango akataki lipa na biteni.
Zwa mwa tango mpo na koyebisa lisolo yango na maloba na yo moko. Olingi koloba yango na mongongo makasi, to kokoma yango. Soki ozali na mpasi ya kokanisa yango, tanga to yoká yango lisusu.
Soki oyoki ete oyebi lisapo yango malamu, zala na ntango ya kokanisa to kosolola mituna oyo elandi.
Get Discovery Bible Studies on your phone
Discover copyright ©2015-2025 discoverapp.org
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™. Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™. Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc. « Biblica » mpe elembo ya Biblica ezali bilembo ya mombongo oyo Biblica, Inc. akomisa na mikanda ya leta mpe na ndako ya mosala ya nkita ya ekolo Amerika. Esalelami na ndingisa ya Biblica.