Tángá to yóká ndambo oyo elandi.
Feti ya Pasika
12:1Yawe alobaki na Moyize mpe Aron kati na Ejipito : 2« Sanza oyo ekozala mpo na bino sanza ya liboso ya mobu. 3Boloba boye na lisanga mobimba ya Isalaele : Na mokolo ya zomi na sanza oyo, libota moko na moko to ndako moko na moko esengeli kozala na mwana meme to na mwana ntaba. 4Kasi soki bato ya ndako bazali ebele te mpo na kolia mwana meme ya mobimba, bakolia yango elongo na bato ya ndako oyo ezali pene na ndako na bango kolanda motango ya bato. Bakopona mwana meme kolanda oyo moko na moko akoki kolia. 5Mwana meme to mwana ntaba oyo bakopona esengeli kozala ya mobali, ya mobu moko mpe ezanga mbeba. 6Bokobatela yango kino na mokolo ya zomi na minei ya sanza yango. Na mokolo yango, bato nyonso ya lisanga ya Isalaele bakokata yango kingo na pokwa. 7Bakozwa makila na yango mpe bakopakola yango na libaya ya likolo mpe na mabaya mibale ya mipanzi oyo esimbaka ekuke ya bandako epai wapi bakolia nyama yango. 8Na butu ya mokolo yango, bakotumba mosuni na yango na moto mpe bakolia yango elongo na mapa ezanga levire mpe matiti ya bololo. 9Bakolia te mosuni oyo ebela malamu te to oyo batokisa, kasi bakolia kaka mosuni oyo batumba na moto elongo na makolo, moto mpe biloko ya kati. 10Bokotika ata ndambo te kino na tongo. Kasi soki ndambo ekomi na tongo, botumba yango na moto. 11Tala ndenge nini bokolia yango : bokolata mokaba na loketo, basandale na makolo, mpe bokosimba lingenda na loboko. Bokolia yango na lombangu. Ezali feti ya Pasika mpo na Yawe. 12Kaka na butu yango, nakoleka na Ejipito ; nakoboma bana nyonso ya liboso kati na Ejipito kobanda na bato kino na banyama ; mpe nakosambisa banzambe nyonso ya Ejipito na nzela ya bitumbu. Nazali Yawe. 13Na bandako epai wapi bokozala, makila ekozala elembo mpo na bino ; bongo tango Ngai nakomona makila yango, nakoleka bino. Boye etumbu moko te ya kufa ekokweya kati na bino tango nakopesa etumbu na mokili ya Ejipito.Feti ya mapa ezanga levire
14Mokolo yango ekozala mokolo ya ekaniseli mpo na bino. Bileko na bileko, bokobanda kosala feti na mokolo yango mpo na lokumu ya Yawe ; yango ekozala mpo na bino mobeko ya libela na libela mpo na bakitani oyo bakoya sima na bino. 15Mikolo sambo, bokolia mapa ezanga levire. Na mokolo ya liboso, bokolongola levire na bandako na bino ; pamba te moto nyonso oyo akolia eloko oyo ezali na levire, kobanda na mokolo ya liboso kino na mokolo ya sambo, bakolongola ye kati na bato ya Isalaele. 16Bokozala na mayangani ya bule na mokolo ya liboso mpe na mokolo ya sambo. Bokosala mosala moko te na mikolo wana longola kaka mosala ya kolamba bilei oyo moto na moto akolia. Yango kaka nde bokosala. 17Bokosala feti ya Mapa ezanga levire, pamba te ezalaki na mokolo yango nde nabimisaki mampinga na bino na Ejipito. Bokosala feti na mokolo yango lokola mobeko ya libela na libela mpo na bakitani oyo bakoya sima na bino. 18Na sanza ya liboso, bokolia mapa ezanga levire kobanda na pokwa ya mokolo ya zomi na minei kino na pokwa ya mokolo ya tuku mibale na moko. 19Mikolo sambo, levire esengeli te komonana kati na bandako na bino ; pamba te moto nyonso oyo akolia eloko oyo ezali na levire, esengeli balongola ye na lisanga ya Isalaele, azala mopaya to mwana mboka ya Isalaele. 20Bokolia eloko moko te oyo ezali na levire. Na bisika nyonso oyo bokozala, bokolia kaka mapa ezanga levire. »
21Moyize abengisaki bakambi nyonso ya Isalaele mpe alobaki na bango : « Bokende kozwa na libota moko na moko mwana meme to mwana ntaba mpe bokata yango kingo lokola mbeka ya Pasika. 22Bokokamata etape ya nzete ya izope, bokozindisa yango na makila oyo ekozala kati na sani monene, bokopakola yango na libaya ya likolo mpe na mabaya mibale ya mipanzi oyo esimbaka ekuke. Moko te kati na bino abima libanda ya ekuke ya ndako na ye kino na tongo. 23Wana Yawe akoleka na mokili mpo na koboma bato ya Ejipito mpe akomona makila na libaya ya likolo mpe na mabaya mibale ya mipanzi oyo esimbaka ekuke, akoleka ekuke yango mpe akopesa nzela te na mobomi ete akota na bandako na bino mpo na koboma. 24Bokotosa malako oyo lokola mobeko ya libela na libela mpo na bino mpe mpo na bakitani na bino. 25Tango bokokota na mokili oyo Yawe akopesa bino ndenge alakaki, bosalela likambo oyo. 26Bongo tango bana na bino bakotuna bino : ‹ Molulu oyo elakisi nini mpo na bino ? › 27Bokoloba na bango : ‹ Ezali mbeka ya feti ya Pasika mpo na Yawe oyo alekaki bandako ya bana ya Isalaele kati na Ejipito mpe abikisaki bandako na biso tango abomaki bato ya Ejipito. › »
Na bongo, bana ya Isalaele bafukamaki mpe bagumbamelaki Yawe. 28Bato ya Isalaele basalaki ndenge kaka Yawe atindaki Moyize mpe Aron.
Zwa mwa tango mpo na koyebisa lisolo yango na maloba na yo moko. Olingi koloba yango na mongongo makasi, to kokoma yango. Soki ozali na mpasi ya kokanisa yango, tanga to yoká yango lisusu.
Soki oyoki ete oyebi lisapo yango malamu, zala na ntango ya kokanisa to kosolola mituna oyo elandi.
Get Discovery Bible Studies on your phone
Discover copyright ©2015-2025 discoverapp.org
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™. Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™. Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc. « Biblica » mpe elembo ya Biblica ezali bilembo ya mombongo oyo Biblica, Inc. akomisa na mikanda ya leta mpe na ndako ya mosala ya nkita ya ekolo Amerika. Esalelami na ndingisa ya Biblica.