Sosola

Étude 8

Kobosana: Mibeko Zomi na nzela ya Moize

Kobima 20:1-21

Etape 1: Tángá lisoló

Tángá to yóká ndambo oyo elandi.

x1.0

Mibeko zomi

20:1Tala maloba oyo Nzambe alobaki :


2« Nazali Yawe, Nzambe na yo, oyo abimisaki yo wuta na mokili ya Ejipito epai wapi ozalaki na bowumbu.

  3Okozalaka na banzambe mosusu te, bobele Ngai.
  4Okomisalelaka te nzambe ya ekeko to bililingi ya biloko oyo ezali na likolo, na se to na mayi oyo ezali na se ya mabele. 5Okogumbamelaka yango te mpe okosalelaka yango te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nazali Nzambe ya zuwa ; napesaka bana etumbu mpo na masumu ya batata kino na molongo ya misato mpe ya minei ya bato oyo bayinaka Ngai. 6Kasi natalisaka bolingo na Ngai kino na molongo ya nkoto epai ya bato oyo balingaka Ngai mpe babatelaka mibeko na Ngai.
  7Okotangaka te na pamba Kombo ya Yawe, Nzambe na yo, pamba te Yawe akopesa etumbu na moto nyonso oyo akotanga Kombo na Ye na pamba.
  8Kanisaka mokolo ya Saba mpe bulisaka yango. 9Okosalaka misala na yo nyonso mikolo motoba. 10Kasi mokolo ya sambo ezali mokolo ya Saba ya Yawe, Nzambe na yo. Na mokolo wana, okosalaka mosala ata moko te ; ezala yo, mwana na yo ya mobali, mwana na yo ya mwasi, mowumbu na yo ya mobali, mwasi mowumbu na yo, bibwele na yo to mopaya oyo azali kati na bingumba na yo. 11Pamba te na mikolo motoba, Yawe asalaki Likolo, mabele, ebale monene mpe nyonso oyo ezali kati na yango, kasi akataki mosala na mokolo ya sambo. Yango wana, Yawe apambolaki mokolo ya Saba mpe abulisaki yango.
  12Okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu mpo ete ozala na bomoi ya molayi kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, azali kopesa yo.
  13Okobomaka te.
  14Okosalaka ekobo te.
  15Okoyibaka te.
  16Okolobaka te matatoli ya lokuta mpo na kokosela moninga na yo makambo.
  17Okolulaka te ndako ya moninga na yo ; okolulaka te mwasi ya moninga na yo, mowumbu na ye ya mobali to mwasi mowumbu na ye, ngombe na ye, ane na ye to eloko nyonso oyo ezali ya moninga na yo. »

Moyize alobeli bato epai ya Nzambe

18Tango bato bayokaki bakake mpe koganga ya kelelo, mpe bamonaki mikalikali mpe milinga kobima na ngomba, balengaki. Batelemaki mosika 19mpe balobaki na Moyize :

  — Tika ete yo moko oloba na biso, mpe tokoyoka yo ; kasi Nzambe te, noki te tokokufa !

20Moyize azongiselaki bango :

  — Bobanga te ! Nzambe ayei nde komeka bino mpo ete kobanga Nzambe ezala kati na bino mpe bosala masumu te.

21Bato bazalaki kaka mosika, wana Moyize apusanaki pembeni ya lipata oyo kati na yango Nzambe azalaki.

Etape 2: Loba lisusu lisapo

Zwa mwa tango mpo na koyebisa lisolo yango na maloba na yo moko. Olingi koloba yango na mongongo makasi, to kokoma yango. Soki ozali na mpasi ya kokanisa yango, tanga to yoká yango lisusu.

Etape ya 3: Zwa Lisapo

Soki oyoki ete oyebi lisapo yango malamu, zala na ntango ya kokanisa to kosolola mituna oyo elandi.


Get it on Google Play
Download on the App Store

Get Discovery Bible Studies on your phone

Discover copyright ©2015-2025 discoverapp.org

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™. Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™. Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc. « Biblica » mpe elembo ya Biblica ezali bilembo ya mombongo oyo Biblica, Inc. akomisa na mikanda ya leta mpe na ndako ya mosala ya nkita ya ekolo Amerika. Esalelami na ndingisa ya Biblica.