Tángá to yóká ndambo oyo elandi.
Sango ya mbotama ya Yesu
1:26Sima na basanza motoba, Nzambe atindaki anjelu Gabrieli kati na engumba moko ya Galile, kombo na yango ezalaki « Nazareti. » 27Atindaki ye epai ya elenge mwasi Mari oyo ayebaki nanu nzoto ya mibali te mpe azalaki mobandami ya libala na mobali moko oyo kombo na ye ezalaki Jozefi, mokitani ya Davidi. 28Anjelu akotaki epai ya Mari mpe alobaki na ye :— Mbote na yo, yo oyo osili kozwa ngolu monene ! Nkolo azali elongo na yo !
29Tango Mari ayokaki maloba ya anjelu, amitungisaki makasi mpe akomaki komituna soki mbote yango elakisi nini.
30Kasi anjelu alobaki na ye :
— Mari, kobanga te ! Pamba te Nzambe asaleli yo ngolu ! 31Okozwa zemi, okobota mwana mobali mpe okopesa Ye kombo « Yesu. » 32Akozala Moto monene, mpe bakobenga Ye : Mwana ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo. Nkolo Nzambe akopesa Ye kiti ya bokonzi ya Davidi, koko na Ye. 33Akozala Mokonzi ya libota ya Jakobi mpo na libela, mpe bokonzi na Ye ekozala na suka te.
34Mari atunaki anjelu :
— Ekosalema ndenge nini, pamba te nayebi nanu nzoto ya mibali te ?
35Anjelu azongiselaki ye :
— Molimo Mosantu akokitela yo, mpe nguya ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ekozipa yo na elilingi na Ye. Boye Mosantu oyo okobota akobengama Mwana na Nzambe. 36Ndeko na yo ya mwasi, Elizabeti, azali mpe na zemi ; akobota mwana mobali, atako akomi mobange. Ye oyo bazalaki kobenga « ekomba » akomi sik’oyo na zemi ya sanza motoba. 37Pamba te Nzambe alembanaka eloko te.
38Mari azongiselaki ye :
— Nazali mwasi mowumbu ya Nkolo, tika ete maloba na yo ekokisamela ngai !
Bongo anjelu akabwanaki na ye.
Mbotama ya Yesu
2:1Na tango wana, Sezare Ogisite abimisaki mobeko ya kotanga motango ya bato nyonso oyo bazalaki kovanda na mikili nyonso oyo ezalaki na se ya bokonzi ya Rome. 2Ezalaki mbala ya liboso ya kotanga motango ya bato, wana Kiriniusi azalaki moyangeli ya Siri.3Bato nyonso bazalaki kokende komikomisa, moto na moto kati na engumba na ye. 4Jozefi mpe alongwaki na engumba Nazareti, kati na etuka ya Galile, mpo na kokende na Beteleemi, engumba ya Davidi, kati na etuka ya Yuda, pamba te azalaki moto ya ndako mpe ya libota ya Davidi. 5Akendeki kuna mpo na kokomisa kombo na ye mpe kombo ya Mari, mobandami na ye ya libala, oyo azalaki na zemi.
6Wana bazalaki na Beteleemi, mokolo na ye ya kobota ekokaki. 7Mari abotaki mwana mobali, mwana na ye ya liboso ; alingaki ye na bilamba mpe alalisaki ye kati na elielo ya bibwele, pamba te esika ezalaki te mpo na bango kati na ndako ya bapaya.
8Kati na etuka yango, ezalaki na babateli bibwele oyo bazalaki kolekisa babutu na bango kati na bilanga ya pembeni mpo na kobatela bitonga na bango. 9Anjelu moko ya Nkolo abimelaki bango, mpe nkembo ya Nkolo engengaki zingazinga na bango ; mpe bayokaki somo makasi.
10Kasi anjelu alobaki na bango :
— Bobanga te ! Namemeli bino sango moko ya malamu, oyo ekopesa bato nyonso esengo makasi. 11Mobikisi abotameli bino lelo, kati na engumba ya Davidi ; Ye nde azali Masiya, Nkolo. 12Tala elembo oyo ekosunga bino mpo na koyeba Ye : bokomona mwana moko abotami sika, balingi ye na bilamba mpe balalisi ye kati na elielo ya bibwele.
13Mbala moko, ba-anjelu ebele ya mampinga ya Likolo bayaki kosangana na anjelu oyo ya liboso, bazalaki kokumisa Nzambe mpe koloba :
14« Nkembo na Nzambe kati na bisika oyo eleki likolo,15Tango ba-anjelu bakabwanaki na bango mpo na kozonga na Likolo, babateli bibwele balobanaki bango na bango : « Tokende kino na Beteleemi, mpo na kotala makambo oyo esalemi kuna, makambo oyo Nkolo ayebisi biso. »
16Bakendeki kuna na lombangu mpe bakutaki Mari, Jozefi mpe mwana oyo abotami sika alala kati na elielo ya bibwele. 17Sima na bango komona ye, balobaki makambo oyo bayebisaki bango na tina na mwana yango. 18Bato nyonso oyo bayokaki bango bakamwaki mingi makambo oyo babateli bibwele balobaki. 19Kasi Mari azalaki kobomba maloba wana nyonso mpe kokanisa na tina na yango mbala na mbala.
20Babateli bibwele bazongaki na kokumisa mpe kosanzola Nzambe mpo na makambo nyonso oyo bayokaki mpe bamonaki, pamba te makambo nyonso esalemaki ndenge anjelu ayebisaki bango yango.
Zwa mwa tango mpo na koyebisa lisolo yango na maloba na yo moko. Olingi koloba yango na mongongo makasi, to kokoma yango. Soki ozali na mpasi ya kokanisa yango, tanga to yoká yango lisusu.
Soki oyoki ete oyebi lisapo yango malamu, zala na ntango ya kokanisa to kosolola mituna oyo elandi.
Get Discovery Bible Studies on your phone
Discover copyright ©2015-2025 discoverapp.org
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™. Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™. Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc. « Biblica » mpe elembo ya Biblica ezali bilembo ya mombongo oyo Biblica, Inc. akomisa na mikanda ya leta mpe na ndako ya mosala ya nkita ya ekolo Amerika. Esalelami na ndingisa ya Biblica.