Tángá to yóká ndambo oyo elandi.
Mateya ya Yoane Mobatisi
3:1Na tango wana, Yoane Mobatisi ayaki mpe akomaki koteya kati na esobe ya Yuda : 2« Bobongola mitema na bino, pamba te Bokonzi ya Likolo ekomi pene ! »3Yoane azali ye oyo mosakoli Ezayi alobaki :
« Mongongo ya moto moko ezali kobelela kati na esobe :4Yoane azalaki kolata elamba oyo basala na bapwale ya shamo mpe mokaba oyo basala na poso ya nyama ; azalaki kolia mankoko mpe mafuta ya nzoyi. 5Bato bazalaki kokende epai na ye longwa na Yelusalemi, na Yuda mobimba mpe na etuka mobimba ya Yordani ; 6bazalaki kotubela masumu na bango, mpe ye, azalaki kobatisa bango na ebale Yordani.
7Kasi lokola azalaki komona Bafarizeo mpe Basaduseo koya ebele mpo na kozwa libatisi, alobaki na bango : « Bana ya banyoka, nani ateyi bino kokima kanda oyo ezali koya ? 8Bolakisa na nzela ya bizaleli ete bobongoli mitema. 9Bokanisa kutu te komilobela na se ya mitema : ‹ Abrayami azali koko na biso ! › Nazali koloba na bino penza ya solo ete Nzambe azali na makoki ya kobimisa, wuta na mabanga oyo, bakitani mpo na Abrayami. 10Epasola esili kobongisama mpo na kokata banzete wuta na misisa : nzete nyonso oyo ebotaka bambuma ya malamu te ekokatama mpe ekobwakama na moto.
11Ngai nazali kobatisa bino na mayi mpo na kolakisa ete bobongoli mitema. Kasi sima na ngai, Moto moko azali koya, aleki ngai na nguya ; ngai nabongi kutu te mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye ; ezali Ye nde akobatisa bino kati na Molimo Mosantu mpe kati na moto. 12Asimbi kiyungulu na loboko na Ye, akopetola etando na Ye mpo na koyamba ble kati na ebombelo na Ye ; kasi akotumba kati na moto oyo ekufaka te, matiti oyo ekotikala. »
Kobatisama ya Yesu
13Yesu alongwaki na Galile mpe akendeki na Yordani mpo ete Yoane abatisa Ye. 14Kasi Yoane aboyaki kobatisa Ye. Alobaki :
— Ezali ngai nde nazali na posa ete Yo obatisa ngai ; kasi ndenge nini Yo oyei epai na ngai ?
15Yesu azongiselaki ye :
— Tika ete esalema bongo sik’oyo ! Ezali malamu mpo na biso kosala bongo mpo na kokokisa bosembo nyonso.
16Tango kaka Yesu azwaki libatisi mpe abimaki na mayi, Likolo efungwamaki ; mpe Yesu amonaki Molimo ya Nzambe kokitela Ye lokola ebenga. 17Bongo, mongongo moko eyokanaki wuta na Likolo mpe elobaki : « Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Ye mingi. »
Yesu, Mpate ya Nzambe
1:29Mokolo oyo elandaki, wana Yoane amonaki Yesu koya epai na ye, alobaki :— Tala Mpate ya Nzambe, oyo alongolaka lisumu ya mokili. 30Ezali na tina na Ye nde nalobaki : « Ezali na moko oyo azali koya sima na ngai, aleki ngai na lokumu, pamba te azalaki liboso ete ngai nazala. » 31Ngai moko mpe nayebaki te soki esengelaki kozala nani ; kasi tina oyo ngai nayaki kobatisa bato na mayi, ezalaki nde mpo ete natalisa Ye epai ya bato ya Isalaele.
32Bongo Yoane apesaki litatoli oyo :
— Namonaki Molimo kokita wuta na likolo lokola ebenga mpe kovanda likolo na Ye. 33Ngai moko mpe nayebaki Ye te ; kasi Ye oyo atindaki ngai kobatisa na mayi alobaki na ngai : « Moto oyo okomona Molimo kokita mpe kowumela likolo na Ye, Ye nde akobatisa kati na Molimo Mosantu. » 34Mpe lokola ezali yango nde likambo oyo ngai namonaki, yango wana nazali kotatola : Moto oyo azali Mwana na Nzambe.
Zwa mwa tango mpo na koyebisa lisolo yango na maloba na yo moko. Olingi koloba yango na mongongo makasi, to kokoma yango. Soki ozali na mpasi ya kokanisa yango, tanga to yoká yango lisusu.
Soki oyoki ete oyebi lisapo yango malamu, zala na ntango ya kokanisa to kosolola mituna oyo elandi.
Get Discovery Bible Studies on your phone
Discover copyright ©2015-2025 discoverapp.org
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™. Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™. Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc. « Biblica » mpe elembo ya Biblica ezali bilembo ya mombongo oyo Biblica, Inc. akomisa na mikanda ya leta mpe na ndako ya mosala ya nkita ya ekolo Amerika. Esalelami na ndingisa ya Biblica.