
Tángá to yóká ndambo oyo elandi.
Komekama ya Yesu
4:1Molimo amemaki Yesu kati na esobe mpo ete Satana ameka Ye. 2Sima na Ye kokila bilei mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei, ayokaki nzala. 3Momeki ayaki epai na Ye mpe alobaki na Ye :— Soki ya solo ozali penza Mwana na Nzambe, loba na mabanga oyo ete ebongwana mapa.
4Yesu azongisaki :
— Ekomama : « Moto akobika na lipa kaka te,5Bongo, Satana amemaki Ye na engumba ya bule, atelemisaki Ye na songe ya Tempelo 6mpe alobaki na Ye :
— Soki ozali penza Mwana na Nzambe, mibwaka na se ; pamba te ekomama :
« Akopesa mitindo na ba-anjelu na tina na yo,7Yesu azongiselaki ye :
— Ekomama mpe : « Okomeka te Yawe, Nzambe na yo. »
8Satana amemaki Ye lisusu na likolo ya ngomba oyo eleki molayi mpe alakisaki Ye bokonzi nyonso ya mokili elongo na lokumu na yango ; 9alobaki na Ye :
— Nakopesa yo nyonso oyo ozali komona, soki kaka ofukameli ngai mpe ogumbameli ngai.
10Yesu alobaki na ye :
— Mosika na ngai, Satana ! Pamba te ekomama :
« Okogumbamelaka kaka Yawe, Nzambe na yo,11Boye Satana atikaki Ye, mpe ba-anjelu bayaki kopesa Ye bilei.
Zwa mwa tango mpo na koyebisa lisolo yango na maloba na yo moko. Olingi koloba yango na mongongo makasi, to kokoma yango. Soki ozali na mpasi ya kokanisa yango, tanga to yoká yango lisusu.
Soki oyoki ete oyebi lisapo yango malamu, zala na ntango ya kokanisa to kosolola mituna oyo elandi.
Get Discovery Bible Studies on your phone
Discover copyright ©2015-2026 discoverapp.org
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™. Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™. Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc. « Biblica » mpe elembo ya Biblica ezali bilembo ya mombongo oyo Biblica, Inc. akomisa na mikanda ya leta mpe na ndako ya mosala ya nkita ya ekolo Amerika. Esalelami na ndingisa ya Biblica.