Tángá to yóká ndambo oyo elandi.
Yesu aleki mopepe na makasi
4:35Kaka na mokolo yango wana, wana pokwa ekomaki, Yesu alobaki na bayekoli na Ye :— Tokatisa na ngambo mosusu ya ebale.
36Batikaki bato, bamemaki Ye na bwato mpe bakatisaki na ngambo mosusu. Babwato mosusu mpe ezalaki elongo na bango. 37Mopepe moko ya makasi ekomaki kopepa, mbonge ekomaki kobeta na bwato, mpe bwato ekomaki kotonda na mayi. 38Yesu azalaki na sima, alalaki pongi mpe atiaki moto na likolo ya kuse.
Bayekoli balamusaki Ye mpe bayebisaki Ye na koganga :
— Moteyi, tozali kokufa ; mpe ozali komitungisa na Yo te ?
39Yesu alamukaki, agangelaki mopepe, mpe apesaki mitindo na ebale :
— Tika makelele ! Vanda nye !
Mopepe esilaki, mpe kimia monene ezongaki.
40Bongo alobaki na bayekoli na Ye :
— Mpo na nini bozali kobanga ? Bozali nanu na kondima te ?
41Somo monene ekotaki kati na bango mpe bakomaki kolobana bango na bango : « Moto oyo azali penza nani mpo ete mopepe mpe ebale etosa ye ? »
Zwa mwa tango mpo na koyebisa lisolo yango na maloba na yo moko. Olingi koloba yango na mongongo makasi, to kokoma yango. Soki ozali na mpasi ya kokanisa yango, tanga to yoká yango lisusu.
Soki oyoki ete oyebi lisapo yango malamu, zala na ntango ya kokanisa to kosolola mituna oyo elandi.
Get Discovery Bible Studies on your phone
Discover copyright ©2015-2025 discoverapp.org
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™. Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™. Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc. « Biblica » mpe elembo ya Biblica ezali bilembo ya mombongo oyo Biblica, Inc. akomisa na mikanda ya leta mpe na ndako ya mosala ya nkita ya ekolo Amerika. Esalelami na ndingisa ya Biblica.